Elige una pista para reproducir
Sencillo / Pista
Alléluia
Alléluia
Monisa nkembo nayo Mokonzi
O bongi na lokumu
O bongi na nkembo pe na masanjoli Moyengebene
Nzambe ya solo
To fukami liboso nayo
To kiti liboso n'o, Mokonzi
Alléluia
Kombo na yo ekumisama
Po y'ozali Nzambe
Bolingo nayo efanda na mitema
Y'ozali Nzambe
Pe nioso efukamela yo
Po lokumu ezali ya yo
Netolama, Nkolo na nioso
To gumbameli yo, Yesu
Yo molingami na nga
Bomoi na nga eza ya yo (alléluia)
Na se ya ngolu na yo na mona nkembo
Y'ozali Nzambe (alléluia)
Pe nioso efukamela yo
Po lokumu ezali ya yo (alléluia)
Netolama, Nkolo na nioso
To gumbameli yo, Yesu
Nani abongi na lokumu lokola Masiya?
Oyo liloba na ye eza nguya
Bipayi binso bomoyi bozali, ozali Nkolo
Nioso efukama na kombo na yo
Y'obongi na lokumu
Y'ofandi na bisika
Bileki na nkembo
Nkolo na bolingo nioso
Yo nde Nzambe na nguya
Mokokisi na bilaka
Nkembo eza ya yo
Zuwa lokumu Nkolo
Nazala lokola yo
Sala eté bomoi na nga na ya yo ezala moko
Na tatola pe na yemba eté
Y'obongi na lokumu
Nani aza lokola yo?
Otombolaka nkita pe lokumu la mboka
To tatoli pe to yembi eté
Y'obongi na lokumu (alleluia)
Ozali Nzambe, o bongi na lokumu
Ozali Nzambe oyo a tombolaka nkita ya ekolo, alléluia
O tombolaka lokumu ya mboka, Nkolo na bomoi
Nzambe ya mboka Congo ezali yo
To mi sopi liboso nayo
Po nionso ozali Nkolo, Nkolo
Oyo a sengeli ko fanda na kiti ya bokonzi
Ya mboka Congo
Y'obongi na lukumu
Y'ofandi na bisika
Bileki na nkembo
Nkolo na bolingo nionso
Yo nde Nzambe na nguya
Mokokisi na bilaka
Nkembo eza ya yo
Zuwa lokumu Nkolo (nazala lokola)
Nazala lokola yo
Sala eté bomoi na nga na ya yo ezala moko
Na tatola pe na yemba eté
Y'obongi na lokumu (nani aza lokola)
Nani aza lokola yo? (Otombolaka)
Otombolaka nkita pe lokumu la mboka
To tatoli pe to yembi eté
Y'obongi na lokumu
To tatoli pe to yembi eté
Y'obongi na lokumu (na nioso o sali to tomboli yo)
To tatoli pe to yembi eté
Y'obongi na lokumu (to tatoli, to tatoli eh eeh)
To tatoli pe to yembi eté
Y'obongi na lokumu (to tatoli, to tatoli eh eeh)
To tatoli pe to yembi eté
Y'obongi na lokumu
Tu es digne de gloire
Toi qui a déversé ton amour dans nos cœurs
Afin que nous puissions aimer comme toi
Alléluia