Elige una pista para reproducir
Tshatsho
Malheur, boni otingami nga lokola singa elandaka nzela o'ya tonga ah
L'amour nexiste pas
Il n'existe que des preuves d'amour
Yeah, yeah
Hum, ako tika yo na ndako yo moko mawa eh
Tango ako zonga moyi esi déja ekomaki sanza
Tango oko tuna ye, ako yebisa yo rien qui vaille
Yo journée mobimba, motema tout le temps likolo
Oko banga amona kanda na yo, noki té asilika
Kanda na ye ebakisaka douleur likolo'a malheur na yo
Oh, amour ndenge nini o sali mpo komisa moto n'esik'oyo anaki té mawa eh
Olangwé ye eh-eh, olangwé ye ba yama
Asala yo nini'ango oko katshua se po na ye eh
Ça pas l'air comme ça ah, eko sila bien té
Cas na nga ekomi desesperé
To yokanaka ye na nga to binaka à l'unisson
Na la vie, nga na yé, to tambola main dans la main
Hein, hein-hen
Photo na ye, na ndako na yo otiya ya grandeur nature
Cinéma na yo preferé se oy'a demarche na ye
Appetit ya solo ozuaka se soki alambi ye meyi
Pongi ya solo o lalaka se soki azali pene na yo
Idée na yo ofuta ba mbanda, avocats ba tikela yo ye
Ezanga yo se omata na nzeté oganga tu l'aimes
Oh, amour ndenge nini osali mp'o komisa moto n'esik'oyo akanaki te mawa eh
Olangwe ye eh-eh, akomisa yo ndenge
Asala yo nini'ango okoma koya dessin animé
Sans delai ni préavis, y'obendani na yo
Ngai moto miso na nga emonaki yo
Mokolo ozalaki 'obima na sé ya mayi
Sanza na moyi se ba suani pona ko lula yo
Uh, oh-oh, oh-oh, humm
Enh, banda jour mam'a botaki nga na zalaki'ozela yo
Boni otikeli nga goût ya mafuta ya nzoyi
Na mbebo, boni okati noki oy'a ngai bonheur
Nani akoki'o ndima azanga elok'oyo alinga
À l'infini eh, yeah-yeah
Eleko ya bien mokolo nini okoya, ah-ah
Na ngambu yeba nga naz'amour elata ngai
Fololo ya tongo, Diba la reine du Fouta djallon
Oza lokola mbongo ata moto aza nango ebelé
Hum, soki ba pesi ye ako zua kaka
Na ko bomba yo, mieux que secrèt ya ba pharaons eh
Tango ba zuwaka ya bango to melaka se soyi eh
Lelo nazui o'ya ngai eswi bino wapi eh, eh-eh
Diba eh
Ata nzoko azalaka na besoin ya vitamine
Hum amour, amour, amour, amour
Nini osali nga lelo oh, po nini oprivé nga de tout?
Po nini o-tourné nga le dos, amour uh-uh
Ah-ah-ah
Eh amour, amour, amour, amour
Fulu nini obwaka o'ya yo mawa eh
Yo mok'oteyaki nga ko pimbwa
Po nini obôteli nga mapapu?
Amour, Patrick Diam
Eh amour, amour, amour, amour
Po nini ozongisi nga à zéro oh?
Nazalaki mowumbu na yo oh
Po nini okomi'o pesa nga liwa avant l'heure
Diam ah-ah
Eh, amour oko suka na nga wapi eh
Hum, bolingo pourquoivraiment osili elengi
Bonbon na nga pourquoi vraiment okomi ngayi
Chiclet na nga vraiment osili sukali avant ah, ah-ah
Diamona ah, ah-ah
Diamona akomisi ngai pondu'a matanga eh
Moto nioso alinga akumba oy'a ye partie
Ngayi moto osangisi nga na malangwa
Y'okakoli nga sans ke otuna motuya na ngayi
Y'okomisi nga etula o'ya Somba Zigida
Ah-ah-ah, amour
Diamona ata kala oko banza nga eh
Ba nzungu ya kala elambaka ba supu ya bien
Après tout moyi eko zuwaka se elongi
Elengi ya makosozalaka na mokuwa
Y'okati manga na nga nanu na weyi té
Somba sanduku oko lela nga dans pas longtemps
Patrick eh
Hum, bolingo oko lela nga eh
Hum, bolingo oh-oh, oh
Visa ya bonheur ba zuwaka wapi eh?
Ambassade ekangama na libanda
Tozali ebelé, molongo molayi tozo zela
Hum, kundulupe
Ata ndenge ya kundulupe eh
Pona nini moyi eko zuaka moto seko obe na elongi
Kasi na motema té?
Moke ezali ndambo té
Stanis Atembo