Выберите трек для воспроизведения
(Lelo mokolo ya mbotama na ngai
Merci pona ba souhait ba fleurs na ba cadeaux
Kasi ebongi malamu, tokumisa Nzambe
Oyo asali biso ngolu.)
Na pasi to na bisengo etinda nga kokumisa Nzambe
Po oyo asali na bomoyi na nga eleki minene
Wuta bomuana kino kokola na nga
Sanza libua na libumu ya maman Le 30 Septembre 1972
Na lingaki kokufa na ngai , po ezalaki maman na muana
Moko akufa ah ahh (2X) Merci maman. ( Merci papa)
Kumisama Yahwe, opesi nga bomoyi ya ofele
Basusu bakufi , basusu bakobelaka. (2X)
Soki na tali bomoyi na ngai wuta Matadi
Ezali se ngolu na yo Nkolo na nga
Yolokoti ngai na kati ya potopoto
Y'osukoli ngai lelo y'opesi nga tina na miso ya bato
Soki na tali bomoyi na ngai wuta bomuana
Esali se ngolu na yo Nkolo na ngai
Ebele tozalaki na bango lobi lelo bakoma bibembe
Nga na leki bango na nini eh Nkolo na nga
Solo ngai moto pamba salela ngai lolenge y'Olingi
Yahwe Yahwe Yahwe
Kumisama Yahwe, opesi nga bomoyi ya ofele
Basusu bakufi , basusu bakobelaka. (2X)
Ezali pona koyemba na nga te Nzambe
Ezali pona ko teya nga te Yesu
Kasi y'omoko y'oponi nga
Osali ngai ngolu, nazala lelo na bomoyi eh
Ezali pona mayele na ngai te Yahwe
Ezali pona kitoko na ngai te Yesu
Kasi yomoko y'oponi ngai osali nga ngolu
Nazala lelo na bomoyi eh (2X)
Soki ezalaki pona mayele, nde ba savants
Ba professeurs d'universités bakufaka te
Soki pe ezalaki pona kitoko
Nde ba miss oyo tomonaka na télévision bakufaka te
Kasi ezali pona ngolu oyo asalaka biso
Tofuti eloko moko te
Kumisama Yahwe, opesi nga bomoyi ya ofele
Basusu bakufi , basusu bakobelaka. (2X)
Basusu lilita , basusu na l'hopitalo
Basusu bakufi , basusu bakobelaka
Basusu na lilita basusu na mbeto ya l'hopitalo
Nga na pesi yo nini po opesanga bomoyi
Basusu ba kufi , basusu bakobelaka
( Ezali pona oyo tosalak pona Nzambe
Pona ndenge to teyaka te
Pona ndenge toyembaka te
Kasi ezali ngolu asala biso
Boni balekaki biso na bosantu lelo bakufa
Ndeko toyeba pe " Un jour qui passe
Une année qui passe, c'est un pas vers la mort
Sosola somba tango, po mikolo etikali mike)
Musique et paroles : Aimé NKANU