Оберіть трек для відтворення
Ngai, moto na mawa
na nzoto oyo ya kufa
masumu manga makangi nga,
awa nazali moto na kufa
Namipesa motema na ngai na mabe,
yango nazangi lifuta
pe bomoyi ya seko,
yango nga nazangi yango ooo
Mabulu ya moto
mazingi nga,
banjelu ya monguna
babungisi nga
Nazangi nzela ya solo,
molimo na nga mobungi
Mokolo ya bolimbisi moyelaki nga,
na ndoto bamonisi nga mabe nionso,
somo, kobanga ekoti na motema,
nayebaki te wapi nakima
Anjelu ya Nzambe amonanaki
pe ye atalaki nga na elongi ya mawa,
agangaki ete:
"mwana! bongwana!
soki te nde obungisami "
Nayoki mawa pe namileli,
naluki nabikisa bomoyi na nga
Nayoki Yesu abengi nga
po ete nazua bolimbisi
Soki oyoki mongongo na Nzambe
azali kobenga yo,
yaka na ye ozua lobiko
Sista Philo:
Koyima yima te ndeko
po oyebi lobi na yo te
Yaka lelo ozua lobiko
Nguya ya monguna esili solo
na kombo ya Nkolo Yesu,
Bopeto na bosembo ekoti
na motema na nga
Miso manga mafungwami,
nga namoni nkembo na likolo
molimo mua nga molongue na kufa
Natondi Nzambe po na ngolu na Ye,
apesi nga lobiko
Miso matondaki na biye bia mokili
sikoyo naluki bia likolo,
nalingi nasepela na Yesu
Nakopema lobiko na lobiko
Nayoki mawa pe namileli,
naluki nabikisa bomoyi na nga
Nayoki Yesu abengi nga
po ete nazua bolimbisi
po ete nazua bolimbisi
po ete nazua bolimbisi
po ete nazua bolimbisi
Soki oyoki mongongo na Nzambe
azali kobenga yo,
yaka na ye ozua lobiko
Sista Philo:
Koyimayima te ndeko
po oyebi lobi na yo te
Yaka lelo ozua lobiko
Eeeeh
Soki oyoki akobenga
lelo
Olingi kozua bomoyi ya
seko
Yaka na Ye
ozua lobiko
Majoie: Yaka ndeko
Sista Philo: Ozua lobiko oo
- Oyebi lobi na yo te, ndeko
- Ndeko kozela te,ndeko kozela te
- Yaka lelo oyo ozua lobiko